OKAPI
Na mibu libwa, ntango nazalaki naino elezi (1), nalandaki tata wa ngai na
kati ya zamba. Akendeki bokila, kotala mitambo miye atiyaki mpo akanga nyama
ya koliya. Butu naino kutu esilaki te. Molili mozalaki naino kozipa mokili
mwa bato.
Pembeni ya mai babengi Ifwazondo, mongongo mwa nyama moko ekomeli biso.
Mongongo moko ya kobanga. Na sima na yango, toyoki bozomeli bwa ngoi to nkoi.
Tata wa ngai azwi likonga liye batiya nkisi mabe na mbeli na yango, abwaki
epai makelele mautaki. Nyama ena ezalaki pene mingi. Toyoki likonga ntango
yango etuti mpanzi wa ye.
Epanzi biso matiti, tokuti mwa nyama moko ya moke. Nzoto wa ye ezali kolenga,
nkuza wa ye etelemi banda moto kin’o mokila, na miso kaka bobangi. Eyebi
lisusu epai ya kokende te. Na yambo, nakanisaki ete ezali mboloko. Tata
ayebisi ngai nde yango te. Nkombo wa yango, Okapi. Kasi nayoki ye abandi
koyemba :
- Nyama, Nyama,
Moi etelemaka mpe elalaka
Etunaka bato te.
Ekolanda nzela na yango,
ndenge elobamaki na bileko bileka.
Biso tozalaki te.
Ngai, nayei lelo na mwana wa ngai,
Mpo na koluka nyama ya koliya
Ndenge bankoko ba ngai balakisaki ngai.
Na sengaki tokutana ngai na yo te
Fololo to lombe (2) esangaka kokola te
Moluka (3) moponoko nzela na yango te
Biso banso totambolaka
Mpo Ye moko Nkolo akela biso.
Yango wana, nzela na biso ekutani
Na pembeni ya moliba moye.
Bankoko baye bakambaka biso
Bayebi ete ngai nazali na ngai na likambo te.
Nyama, Nyama,
Olimbisa ngai... »
Tata ayembi nzembo wana mbala ibale. Soki nyama yango ayokaki nzembo wana to
te, nayebi te. Atelemi kaka lokola zoba. Tata asimbi ye na nkingo, atiyi ye
singa mpe akangi ye na nzete ya etaka-etaka (4). Mpo na ngai, ezalaki mbala
ya liboso namona nyama babengi Okapi. Moto na nse, azali koluka matiti ya
koliya. Matiti ma mai ma mpondu ; na moi ezali kongala likolo na yango lokola
mabanga ma ntalo. Nabaloli miso epai makolo ma ye mazalaki : Yango
mike...Tata abuki lumba-lumba. Ngai nde nalokoti biteni bya nzete biye
bikauka mpo topelisa moto. Na mbala moko, nyama ena ebandi kopumbwa esika
moko. Ezali koluka ete elongola nsinga eye tata akangaki ye na nkingo. Tango
atomboli zolo wa ye na likolo amoni ngai.Miso mya biso mikutani. Nazongi
sima, ntango abeti tangwa. Boleli bwa ye ekei mosika, ekoti na zamba.
Emilokoti na mbala moko, epumbwe mpe etuti moto na nzete. Ekufi kaka
wana.Totikali kidiba ! Monoko polele. Eloko ya koloba ezali te mpo miso mya
biso mizali kolanda makila maye mazali kokweya na nkingo wa ye. Na bandi
kolela. Tata wa ngai akangi nyama ena na kati ya nkasa mpe ayebisi ngai
tozonga na mboka. Okapi euti kolakisa biso bolingo bwa ye ya mokili. Na zamba
ayebi boumbu te. Ezali nyama ya nsomi (5).
------------------------------------------------------------------------------
---------------
(1) Elezi : mwana moke. (2) Moluka : Riviere. (3) Moliba : ruisseau. (4)
Etaka-etaka : essence rare du Congo (Sirombosiopsis tetandra). (5) Nsomi :
libre (Bonsomi : liberte).
Liyebisi : Soki motangi ayebi nkombo eye natiyi na lisapo te, akomela ngai
mpo napesa ye ndimbola. Moto ayoka nsoni te. Tunani, nakondimbolela yo.
KAWATA
Nyang e nkoso